RDC: « pasi ya masango na Katanga mpe na Kasaï eza sika te » Vital Kamerhe

O'boso ya ba palanginisi sango elongo na molobeli moa mbulamatari, mokambi mbulamatari molandi atalaka mambi ma libombo Vital Kamerhe alalisi ete pasi ya masango na ekolo congo demokratiki ezali ya sika te na se ya bokambemi ya Sama Lukonde

Sarah Meta Savu

15 Sanza ya mitano 2023 - 22:07
 0
RDC: « pasi ya masango na Katanga mpe na Kasaï eza sika te » Vital Kamerhe

Pona Vital Kamerhe, pasi eye ezui misisa na yango uto eleko ya lipanda ya ekolo congo demokratiki eleko eye ba noko bazalaki ko niokolo ba koko me zalaki ata ko kata loboko soki oboyi musala.

« Ko zanga masanga na Katanga, mpe Kasaï ezali ya lelo na bokambemi ya Sama Lukonde kasi bitumba mosusu ezali nzala, bobola. Ko zanga misolo na libombo ya ekolo congo demokratiki ezui misisa uto eleko ya EIC mobu koto (1885-1908, 1960) », maloba ya Vital Kamerhe.

Misele ya libombo atalisaki mikano mizuami na mbulamatari pona ko silisa ko zanga lokola ko longola misolo ya mpako pona baye bazali ko sala mombongo ya masango sanza motoba, me lolenge ya ko kolisa bilanga ya masango.

Ko yanolaka na mituna na oyo batindami ya mbulamatari na libanda ya mboka pona ko luka lolenge kani kosilisa kozanga ya masango Vital Kamerhe alobi ko Mona mabe te yako somba masango na libanda pona kosunga bayi mboka na bisika kokoso ezali ezali mokano ya ko memia.

« To sombaka libanda nionso to zali nango eza soni ko somba bileyi libanda ya mboka ba Katanga mpe Kasaï bongo nde esengeli ezala » ,nde maloba ya Vital Kamerhe yambo yako benga "baye banso bazali ko sepela nanu" ba tika mbulamatari ebongami pona kobongisa

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa