RDC: Kolakama ya boyeyi ya Sama Lukonde na kelehe pona ko kabola mawa na bayi mboka ba simbami na likama.

Lisanga lia ba tindami pona misala likambemi na minisele ya yambo ba zelami na kalehe mikolo mikoya na kalehe na etuka ya sud Kivu. Eza nde pona kabola mawa elongo na bye bakutanaki pe mabota masimbamaki na likama lia mvula Oyo enokaki mua mineyi ya sanza mitano moye tozali pe ebebisaki biloko biyike pe bomoyi na mabota mayike.

Redaction

13 Sanza ya mitano 2023 - 13:42
 0
RDC: Kolakama ya boyeyi ya Sama Lukonde na kelehe pona ko kabola mawa na bayi mboka ba simbami na likama.

Kolandisama na maloba minisele ya mondelo o'mboka, bokengi mpe bokoko na liboso ya ba panzi sango sima ya likita likambamaki na Sama Lukonde, mbulamatari azali kolandela likambo litali likama lia kalehe.

"Mokambi mbulamatari abeti sete Pona likambo ya kalehe. Ndenge toyebi to kutanaki na likama na ba mvula enokaki oyo ememi biloko mpe bomoyi ya batu motango koleka kama mineyi. Liyebisi liko pesama Pona lolenge makambu masengeli kosalema. Kasi batindami na mkombo ya mbulamatari bako zala kuna esika na mikilo mikie elongo na mokambi mbulamatari." Peter Kazadi.

Elobamaki pe o'kati ya likita liye mambi matali bokengi ya kwamouth na etuka ya maï ndombe. Bokengi, kimia, nde makambo mazuelami mokano pona ko salema na Bandundu ya monene.

"Esengeli ko simba ete mokano mozuami yako zongisa sika bokonzi ya mbulamatari oyo eniatami na ba tomboki. Mpe baye ba salaka mosala pona bokengi bazali basengeli basala maye masengeli po ete kimia mpe bokengi emoyingela bisika binso ekomaki pasi na bayi mboka pona  ya bozangi bokengi. Mpe na kanisi mikolo mikoya kimia ekozala na engumba mokonzi kisasa pona nini te na kwamouth, Kisangani mpe ekolo congo demokratiki mobimba" nde abakisaki.

Eza na batu bazuaki liwa na mvula ya mua mineyi ya sanza mitano na kalehe. Bokoko ebele ebebi lokola na Bushushu mpe Nyamukubi na eteni ya mbinga sud.

Minisele ya libiki Modeste Mutinga apesaki na mobota monso mosimbami misolo na ba francs congolais millions mibale koto kama mitano mpe biloko bisusu pona kosunga.

Lolenge loko minisele Guy Loando atalisaki o'boso ya ba palanginisi sango mikakatano mizali kuna esika. Ezali mingi mingi lolenge lako tonga b ndako.

Redaction UNE.CD est un média en ligne basé à Kinshasa, capitale de la République Démocratique du Congo, qui collecte, traite et diffuse des informations générales de la RDC, l'Afrique et le Monde. Grâce à nous, l'actualité vous suit partout en temps réel sur votre téléphone, tablette et ordinateur en un seul clic.