RDC: Felix Tshisekedi azongisi sika elaka na ye Yako mema ntombwa na ekolo o'nzela ya misala na ba masini.

Tata mokonzi Félix-Antoine Tshisekedi yambo yako longwa ekolo Chine azongisi sika elaka na ye Yako mema ntombwa na ekolo congo demokratiki o'nzela ya misala na ba masini, pona ntombwa ya ekolo eko leka o'nzela ya misala na ba masini na mambi mayike.

Redaction

29 Sanza ya mitano 2023 - 11:27
 0
RDC: Felix Tshisekedi azongisi sika elaka na ye Yako mema ntombwa na ekolo o'nzela ya misala na ba masini.

" Na bandi ete ekolo Chine ekoki ko zala ekolo ya malamu Pona ko tambola elongo na ekolo congo demokratiki. Bikolo bisusu lokola boye bizali kasi ekolo Chine nde atiaki makolo liboso na yango na yaki na lombango ko ndima na bobengi ya tata mokonzi ya bango, kasi na kangi bikuke te pona bikolo bisusu bisepeli ko tambola elongo na ekolo congo demokratiki na likambo lina "

Ko landisama na maloba maye " misala na ba masini eza motuya npona ntombwa. Misala miango miko banda na bobongoli bozui ya se ya mabele mpe bo keli biloko bia sika epayi na biso. Wana ndoto na nga mpe yango nde na lingi nako sala nionso npona yango. "

Felix Tshisekedi ezangaki elongo na lisanga linene ya ekolo congo demokratiki kuna wapi mikanda miyike mia boyokani mizuaki mikoloto npona bokembisi boyokani ya bikolo bibale.

Redaction UNE.CD est un média en ligne basé à Kinshasa, capitale de la République Démocratique du Congo, qui collecte, traite et diffuse des informations générales de la RDC, l'Afrique et le Monde. Grâce à nous, l'actualité vous suit partout en temps réel sur votre téléphone, tablette et ordinateur en un seul clic.