Nord-Kivu : batomboki sambo (7) ya lisanga ADF ba kufi na maboko ya mapinga ya FARDC

Butu yoko katisa mokolo mua yambo kino mokolo mua mibale ya sanza ya mitano ba  mbolombolo ya lisanga lia ba tomboki ya ADF ba kufi na maboko ya mapinga FARDC na eteni ya Bashu, kuna na Beni, na etuka ya Nord-Kivu.

Redaction

1 Sanza ya mitano 2023 - 21:41
 0
Nord-Kivu : batomboki sambo (7) ya lisanga ADF ba kufi na maboko ya mapinga ya FARDC

Kolandisama na bayi 7sur7.cd esalemaki na kati ya ko ndongwana.

« Nakolandaka ba tomboki ya ADF baye bazali kotangisa makila ya bayi mboka na kamwanga, na Bashu mapinga ya FARDC ba bomi na batomboki sambo ya lisanga ADF na butu pona komona tongo ya mokolo mua mibale. Ezalki bitumba ya makasi  ya mapinga na ba tomboki pene pene ya kalamu ya taliha », wana maloba ya Anthony Mualushayi.

Mapinga abotoli minduki misato ya bitumba AK-47 pe ba kisi ya ko mela. Anthony Mualushayi abengi bayi mboka na ko batela kimia pamba te mapinga ya FARDC ezo sala nionso pona kotela bango pe mindelo ya ekolo congo demokratiki

Redaction UNE.CD est un média en ligne basé à Kinshasa, capitale de la République Démocratique du Congo, qui collecte, traite et diffuse des informations générales de la RDC, l'Afrique et le Monde. Grâce à nous, l'actualité vous suit partout en temps réel sur votre téléphone, tablette et ordinateur en un seul clic.