Masano ya Francophonie ya mbala libwa: RTNC ati mokoloto na moko mokanda pona etando naye

Na mikolo mikie pona bobandi masano ya Francophonie, etando ike ya RTNC ati mokoloto na moko mokanda mokolo mua mibale zomi na motoba na engumba mokonzi kisasa boyokani elongo lisanga lia masano ma francophonie pona kozala etando ike ya yambo kolekisa masano mana onte ya ekolo congo demokratiki.

Sarah Meta Savu

17 Sanza ya mitano 2023 - 11:12
 0
Masano ya Francophonie ya mbala libwa: RTNC ati mokoloto na moko mokanda pona etando naye

Nako bima na bango na likita liye, dileketele mokambi ya masano ya Francophonie ya mbala libwa, Isidore Kwadja Ngembo,alaki na bayi mboka o'nzela ya bapalanginisi sango ete masano mango mako salema lolenge ebongisamaki na engumba mokonzi kisasa.

« Na koki loba na ko sukisama ete masano mako salema, nalingi na loba lisusu ete lisanga lia batalisi elongi ya ekolo Canada liko koma mua tuku ibale ya sanza mitano tozali mpe mua libwa mpe zomi ya sanza motoba masanga ya ba talisi bilongi ya bikolo binso ya Francophonie mako koma pona kotala maye mabongisami pona masano mango. Pona yango bokoki ko loba te ete masano mako salema te na tango bikolo biye binso bizali ko lengelama »

Likita pona mokoloto moa boyokani boango lisalemaki na ndako ya mosala ya etando ike ya RTNC na bokambemi ya Patrick Muyaya minisele ya bopanzi sango.

Masano ya Francophonie ya mbala libwa mako salema uto mua tuku ibale na muambe sanza ya sambo kino mua motoba sanza ya muambe ya mobu koto ibale tuku ibale na isato engumba mokonzi kisasa na ekolo congo demokratiki

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa