Likita lia bikolo bia afrika na moniele ya mbala tuku ibale na yoko Kayembe Kasanda azui kiti ya bokambi bosembo

Mua tuku misato na moko ya sanza mitano mobu koto ibale tuku ibale na isato na engumba Bujumbura, na likita lia bikolo bia afrika na moniele ya mbala tuku ibale na moko Congo demokratiki ezui bokambi ya ndako ya bosembo ya lisanga lia bikolo bia afrika ya moniele o'kati ya likita lia bango ya mbala tuku ibale na yoko Liye lisangisi bakonzi mpe ba Kambi mbulamatari ya bikolo bia lisanga liango.

Redaction

1 Sanza motoba 2023 - 08:28
 0
Likita lia bikolo bia afrika na moniele ya mbala tuku ibale na yoko Kayembe Kasanda azui kiti ya bokambi bosembo

Zuzi Kayembe Kasanda Ignace Rene atiami na moto ya ndako ya bosembo,ako sala mosala kino suka bokonzi boa ye.

Bibonga biyike bipesami na likita liango. Andrea Arik Malueth azui ebonga ya kalaka mokambi ya ndako ya misala mitali mambi ma botongi ba nzela, libiki mpe politiki, Annette Semuwemba azui ebonga ya kalaka mokambi ya ndako ya misala mitali mpako ya bokotisi biliko na bikolo, mombongo mpe mambi ma misolo.

Congo demokratiki atalisamaki onte ya likita liango na Mbusa Nyamwisi.

Redaction UNE.CD est un média en ligne basé à Kinshasa, capitale de la République Démocratique du Congo, qui collecte, traite et diffuse des informations générales de la RDC, l'Afrique et le Monde. Grâce à nous, l'actualité vous suit partout en temps réel sur votre téléphone, tablette et ordinateur en un seul clic.