Kwamouth : batomboki zomi na mitano ba katelami etumbu ya liwa pona mbilinga mbilinga

Ba tomboki zomi na mitano ba katelami etumbu ya liwa, mokolo ya mposo mua zomi na misato ya sanza ya mitano na ndako ya esambiselo ya mapinga ya Bandundu, Bagata mpe mai-ndombe pona mbilinga mbilinga mpe moyibi na Kwamouth.

Redaction

15 Sanza ya mitano 2023 - 19:16
 0
Kwamouth : batomboki zomi na mitano ba katelami etumbu ya liwa pona mbilinga mbilinga

Ba fundami ko kota na kati ya lisanga lia batomboki libengami "Mobondo" oyo bazo tia ko banga na kwamouth mpe bagata na etuka ya maï ndombe.

O'kati na bango zomi na mitano (15) libua (9) batelami etumbu ya liwa pona tina ya bobangi batie kuna esika mpe motoba (6) pona moyibi pe kozua na makasi biloko na bozui ya bayi mboka ya nzinga nzinga.

Ndako ya bosambisi mapinga ya Bandundu, bagata me maï ndombe endimisami na mbeba ya ba batomboki bango nembi ba pesi liwa na bato motango tuku misato na motoba mpe o'kati ya baye ba kufi basi mpe Bana ebele uto sanza ya libua kino sanza ya zomi na moko ya mobu Koto ibale tuku ibale na ibale.

Esengeli na batomboki yango ko futa misolo na lolenge ya amerika koto zomi

Se na ndako eye ya bosambisi mapinga ya Bandundu Bagata mpe mai-ndombe batomboki zomi na mitano ba katelami etumbu ya liwa o'mua zomi na sambo ya mineyi eleki.

Redaction UNE.CD est un média en ligne basé à Kinshasa, capitale de la République Démocratique du Congo, qui collecte, traite et diffuse des informations générales de la RDC, l'Afrique et le Monde. Grâce à nous, l'actualité vous suit partout en temps réel sur votre téléphone, tablette et ordinateur en un seul clic.