Kisasa : molobeli moa bayi mboka Mike Mukebay atindami na boloko ya makala

Molobeli moa bayi mboka na engumba mokonzi kisasa Mike Mukebay, atindami na boloko ya makala mokolo mua mibale zomi na misato ya sanza mitano mobu koto ibale tuku ibale na isato.

Redaction

25 Sanza ya mitano 2023 - 15:09
 0
Kisasa : molobeli moa bayi mboka Mike Mukebay atindami na boloko ya makala

Moko ya ba konzi na lisanga politiki ensemble pour la république. Mike Mukebay ako leka na ndako ya bosambisi ya kisasa/ Gombe pona oyo etali, maloba mabe na tata mokonzi, bo panzi sango ya mambi ma lokuta, mambi mako yinana kati ya bayi mboka, mpe maloba yako zokisa.

Akangami pona maloba maye na etando ike ya CNL13 mokolo moa mposo tuku ibale sanza ya mitano sima ya botamboli ya bayi opposition.

Atiamaki maboko moa lomingo tuku ibale na moko sanza ya mitano liboso ya lopango naye, alalaki na ndako ya bokangi ya pulusu na kisasa/Gombe yambo yako memema na boloko ya makala.

Redaction UNE.CD est un média en ligne basé à Kinshasa, capitale de la République Démocratique du Congo, qui collecte, traite et diffuse des informations générales de la RDC, l'Afrique et le Monde. Grâce à nous, l'actualité vous suit partout en temps réel sur votre téléphone, tablette et ordinateur en un seul clic.