Kisasa: Bilenge ya UDPS bazo bongisa ko tambolaua tuku ibale ya sanza mitano mokolo moko na bayi opposition pona ko talisa ete bazali elongo na tata mokonzi Félix-Antoine Tshisekedi

Bilenge ya UDPS bako zala na Boko balabala ya engumba mokonzi kisasa mua tuku ibale na ibale ya sanza mitano pona ko talisa ete bazali elongo na tata mokonzi ya ekolo congo demokratiki liboso ya bitumba na ekolo Rwanda na moniele ya ekolo.

Sarah Meta Savu

16 Sanza ya mitano 2023 - 14:13
 0
Kisasa: Bilenge ya UDPS bazo bongisa ko tambolaua tuku ibale ya sanza mitano mokolo moko na bayi opposition pona ko talisa ete bazali elongo na tata mokonzi Félix-Antoine Tshisekedi

Bako tambola mpe pona kotalisa ete bazali sima ya mabongisi ya maponami pona kotalisa mpe ete bazali sima ya mapinga FARDC na eloko eye batomboki ya M23 bazali ko zangisa kimia na bayi mboka na moniele ya ekolo congo demokratiki.

"Eyebani na bato banso ete ekolo Rwanda ya Paul kagame na nzela ya batomboki ya M23 ezo bundisa ekolo congo demokratiki kasi ba kambi ya mbulamatari bazo sala manson masengeli pona ko bundela ekolo tala ntina Bilenge bazui mokano ya ko tambola " na mokanda Bilenge ba tindeli moyangeli moa engumba mokonzi kisasa Gentiny Ngobila.

Botamboli na bango eko wuta na ba balabala mineyi lokola na biteni bineyi ya engumba mokonzi kisasa nako landaka mitindo pona ko suka na ndako enene palais du peuple esika bako tanga mpe bako tika mokanda moa Bangor

Bilenge ya UDPS ba poni mokolo moko na botamboli ya bayi opposition ezali pona kotelemela bango? Moyangeli moa engumba mokonzi kisasa Gentiny Ngobila ako pesa nzela pona botamboli na bango? Toko yeba yango mikolo mikoya

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa