Kinshasa : SNEL apesi masini ya sika ya 630kw na katier Yolo sud sima ya sanza mineyi na molili

Kompani ya lotiliki azongisi koseka na bilongi ya bayi mboka na Kartier yolo sud na comini ya kalamu na ko pesaka kuna esika macini yako bongola lotiliki mua yambo ya sanza ya mitano.

Redaction

1 Sanza ya mitano 2023 - 20:47
 0
Kinshasa : SNEL apesi masini ya sika ya 630kw na katier Yolo sud sima ya sanza mineyi na molili

Ezalki liboso ya dileketele ya SNEL sa muana mboka Teddy Luamba manso maye kolandisama linaka ya tata mokonzi Félix-Antoine Tshisekedi.

« Lolenge to lobaki poso eleki, tozali na kati ya misala pona kosilisa molili. Lelo to tie macini ya sika pona ko bongola lotiliki likanisi ezali ya ko tambola elongo no na tata mokonzi Félix-Antoine Tshisekedi pona bayi mboka pe kozala pene pene na bango. Ezali Kartier monene Oyo ezangaki lotiliki utu sanza ya mibale.nde ntina to sali likambo liye », maloba ya Teddy Luamba Dileketele mokambi ya SNL.

Ba balabala zomi na moko ya Kartier yolo sud bako salela lotiliki ya masini ya sika. Mokambi ya SNL ko landela misala na yango pona sepelisa baye bazuaka lotiliki na ye.

Redaction UNE.CD est un média en ligne basé à Kinshasa, capitale de la République Démocratique du Congo, qui collecte, traite et diffuse des informations générales de la RDC, l'Afrique et le Monde. Grâce à nous, l'actualité vous suit partout en temps réel sur votre téléphone, tablette et ordinateur en un seul clic.