IX ya masano ya Francophonie: batalisi elongi ya ekolo Canada bakomi na engumba mokonzi kisasa pona komona lolenge mabongisi ma masano mango mazali kotambola
Lisanga lia batalisi elongi ya ekolo Canada - Québec mpe eloko Canada - Brunswick bazali kobika na engumba mokonzi kisasa pona komona lolenge mabongisi mazali kotambola pona masano na sanza sambo mozali ko pusana.
Batalisi bilongi ba yambamaki na libanda ya mpepo ya n'djili na dileketele mokambi ya masano ma francophonie na ekolo congo demokratiki Isidore Kwadja Ngembo.
Uto mua tuku ibale kino mua tuku ibale na motoba ya sanza ya mitano lisanga lia batalisi bilongi bakomono bokeyi liboso lia misala miango mia mabongisi kuna wapi masano mango masengeli kosalema.
Milulu miango miko talisa masano libua na bokeseni mpe zomi na yoko ya mambi ma tali ntoki.