EPST : mimekano mia ENAFEP emami sima na bituka sambo nzambi mituna miko koma sima ya ngonga esengeli.

Na bituka ya biteyelo sankuru 1 na lodja sankuru 2 na lusambo tshuapa 1 na 2 na boende mpe bokungu haut-uelé 1 na 2 na isiro mpe watsa bas-uelé na buta mimekano mia ENAFEP miko salema sima ya bituka bisusu mua zomi na mibale mpe zomi na misato ya sanza motoba nzambi mituna miko koma sima ya ngonga esengeli.

Redaction

31 Sanza ya mitano 2023 - 17:44
 0
EPST : mimekano mia ENAFEP emami sima na bituka sambo nzambi mituna miko koma sima ya ngonga esengeli.

"Ko pusama ya mimekano mia ENAFEP npona kosilisa kelasi ya se eko zwa kokoso nzambi mituna miko koma sima ya ngonga esengeli nako yebaka ete mituna mizuaki nzela na ngonga esengeli " maloba ya lokasa la bopanzi sango ya minisele Tony Mwaba Kazadi

Mimekano mia ENAFEP miko banda na ekolo mobimba mua yambo ya sanza ya motoba. Tony Mwaba Kazadi ako beta kelelo ya bobandi na engumba Kisangani na etuka ya tshopo bisika bozwami ye uto mpokwa ya mua tuku misato ya sanza mitano.

Redaction UNE.CD est un média en ligne basé à Kinshasa, capitale de la République Démocratique du Congo, qui collecte, traite et diffuse des informations générales de la RDC, l'Afrique et le Monde. Grâce à nous, l'actualité vous suit partout en temps réel sur votre téléphone, tablette et ordinateur en un seul clic.