CAN 2023: Jonathan Bolingi azongi na masano, ba nkombo ya baye ba ponami npona ko ndongwana na ekolo Gabon.

Moponi ya ba beti ndembo npona ekolo congo demokratiki, Sébastien Desabre, abimisi ba nkombo tuku mibale na sambo ya bayi leopard ba ponami npona ko ndongwana na ekolo Gabon kuna ekolo cote d'ivoire na ntina ya ko wela nkeni ya bikolo bia afrika.

Redaction

30 Sanza ya mitano 2023 - 10:29
 0
CAN 2023: Jonathan Bolingi azongi na masano, ba nkombo ya baye ba ponami npona ko ndongwana na ekolo Gabon.

Npona mbala yambo azui o'kati ya bango, Dylan Batubinsika na Rocky Bushiri. Jonathan Bolingi npona kozwa esika ya Cédric Bakambu oyo azali na bopemi ya mbeba ya ba lokasa ya langi ya moyi eleki ebele.

Ba nkombo ya baye bako zala na nkeni ya bikolo bia afrika

Na ekuke ya mingete: Lionel Mpasi, Siadi Baggio, Esdras Kabamba

Lokola ba défenseurs : Chancel Mbemba,Inonga Baka, Dylan, Rocky,Mukoko Amale, Jordan Ikoko, Arthur Masuaku, Vital N'simba,Bope, Arsène Zola.

Na bisika ya ba médiateurs: Aaron Tshibola, M'fulu, Lusamba, Théo Bongonda, Gaël Katuta, Glody Lilepo.

Na ngambu ya ba attaquants: Aldo Kalulu, Fiston Mayele, Jonathan Bolingi, chadrac Akolo, Yoan Wissa.

Se o'libaku abakisi ete basusu bakoki te pona ba mpota ndakisa Fasika,Laura,Malango, Kayembe, Dianganda mpe Kebano, nzoka nde, Gédéon Kalulu, Ruddock mpanzu mpe silas katompa bako beta pona maye matali bango.

Ba leopard ya ekolo congo demokratiki bako ndongwana na ba panthère ya ekolo Gabon mua zomi na muambe ya sanza motoba pona CAN  Cote D'Ivoire 2023 na engumba Franceville, yambo yako ndongwana na ekolo Soudan.

Ba leopard basengeli ko longa bikolo biye bibale pona ko koma epimelo elandi.

Redaction UNE.CD est un média en ligne basé à Kinshasa, capitale de la République Démocratique du Congo, qui collecte, traite et diffuse des informations générales de la RDC, l'Afrique et le Monde. Grâce à nous, l'actualité vous suit partout en temps réel sur votre téléphone, tablette et ordinateur en un seul clic.