Botamboli ya bayi opposition ya mua tuku ibale ya sanza mitano: Ngobila alaki komema o'boso ya ba zuzi ba Kambi pona botomboki

Mokolo moa yambo ya mposo tuku ibale na ibale Moyangeli moa engumba mokonzi kisasa, Gentiny Ngobila ako funda baye ba sengelaki ko salisa botamboli ya bayi opposition mua tuku ibale ya sanza mitano pona "ko zanga botosi ya nzela ya botamboli,mpe botomboki" botalisamaki epayi ya bato ba sengelaki ko zala elongo na bango ma bango.

Redaction

22 Sanza ya mitano 2023 - 10:43
 0
Botamboli ya bayi opposition ya mua tuku ibale ya sanza mitano: Ngobila alaki komema o'boso ya ba zuzi ba Kambi pona botomboki

Ko funda ezali pona ba Kambi mangomba politiki " ensemble pour la république, ECIDE, leadership pour la gouvernance et le progrès" Baye ba sengelaki ko salisa botamboli boango po batosi te mitindo mipesamaki na moyangeli moa engumba o'kati ya likita lia bango.

"Kotala bo zangi botosi ya maye maselemaki pona bokengi lolenge libamaki o'kati ya lioko likita lisalemaki liye lisangisaki ba Kambi ya mangomba politiki mpe ndako ya mosala moa moyangeli ya engumba mua zomi na muambe ya sanza mitano mobu koto ibale tuku ibale na isato, pona ntina yako batela kimia na eloko ya botamboli,bo zangi botosi ya nzela ya botamboli lokola elobamaki, bako funndama na mibeko obe mua tuku ibale na ibale ya sanza ya mitano" o'kati ya lioko liyebisi lia ndako ya mosala ya moyangeli.

Pona moto ya yambo ya engumba kisasa, baye batambolaki ba bebisi ndako ya mosala ya pulusu na komine ya ngaba. Etalisami ete bazalaki ya mangomba politiki ensemble pour la république mpe ECIDE.

Botamboli bo bongisamaki na Katumbi Fayulu Augustin Matata mpe Sesanga pona ko telemela ko buta ya biloko koboya bokaboli ya ekolo congo mpe mabongisi ma maponami esalemaki bo elongobani te ba pulusu mpe bato ya mangomba politiki bazui ba ba mpota.

Redaction UNE.CD est un média en ligne basé à Kinshasa, capitale de la République Démocratique du Congo, qui collecte, traite et diffuse des informations générales de la RDC, l'Afrique et le Monde. Grâce à nous, l'actualité vous suit partout en temps réel sur votre téléphone, tablette et ordinateur en un seul clic.